[12:30:03] GENERAL-KAWELE -KATA -MOTO – Seba Siao: BREAKING NEWS BA PASTEUR YA LELO BAKOMA KAKA MATEYA YA MBONGO SUIVEZ CA SVP http://www.youtube.com/watch?v=3Obr1OZrI2A&feature=player_embedded
[12:36:24] Graphèle Paluku-Atoka Uwekomu: C’est normal, Général !
Mboka ekomi ya misère.
(Le pays en est devenu un de pauvreté)
Musala eza ya kokoka te.
(Les emplois ne sont pas suffisants en nombre)
Salaire eza ya lokuta na moibi (20 à 13000 $/mois)
(Les salaires n’en sont que de nom et d’injustice : 20 à 13000 $/mois)
Batu mingi balingi kosala te, kobundela mboka te
(Beaucoup sont ceux qui ne voudraient pas travailler, ceux qui ne veulent pas se battre pour la nation)
Etikali kaka mateya, commerce ya facile mpo ozua « Mercedès ya pasteur »
(Il ne reste plus – aux yeux de certains – que les prédications ; un commerce facile pour que vous acquériez la “Mercedès du pasteur”)
Solution ezali nini, selon biso, na Projet 2014
(Quelle est la solution, selon nous, participants au Projet 2014 ?)
1. ko inventer misala mususu
(Créer de nouveaux emplois supplémentaires)
2. kobongisa salaire ezala ya solo mpe ya bosembo (Bruts : 1500 (études primaires), 3000 (études secondaires), 4500 (études universitaires) à 6000 (études post-universitaires) $/mois)
(améliorer les salaires pour en faire de vrais et des justes : [Bruts : 1500 (études primaires), 3000 (études secondaires), 4500 (études universitaires) à 6000 (études post-universitaires) $/mois])
3. ko responsabilité batu nioso baye baza majeurs (po nakosala musala : certificats d’études primaires ou équivalents obligatoires po na mutu nioso ; formations obligatoires mpo na ba adultes oyo bazangi yango mpo ente bazua yango !)
(responsabiliser toutes les personnes majeures [pour qu’ils se mettent au travail : certificats d’études primaires ou équivalents obligatoires pour tout citoyen ; formations obligatoires au bénéfice des adultes qui en manques afin de leur permettre de s’en procurer !])
Mpo ente maye nioso esalama, esengeli banguna bakangama, liboso ya makambo nioso. Mutu akokanga banguna ezali MONUC te, Washington te, Bruxelles te, CPI te : congolais ye moko, mutu apona batu wana, mpe ye mutu esengeli abongisa oyo abebisaki.
(Pour que tout cela se fasse, il est impérieux que les imposteurs soient, avant toute chose, arrêtés. Celui qui arrêtera les imposteurs n’est pas la MONUC ni Washington ni Bruxelles ni la CPI : c’est le congolais lui-même ; celui-là même qui a élus ces hommes là ; et qui est celui qui doit arranger ce qu’il a détruite de ses mains)
