Soki boye te…


Mpo :

  1. totikala na ba illusions, na baéchecs ya kala te,
  2. totika kobanga kobundela mboka ya biso moko,
  3. mokoli mobimba eyeba koyoka biso, etika komonela biso…

1. to yeba d’abord polele eloko nini tozobundela ;
2. ndenge nini tolingi to bundela mboka na biso.

Mpo na ndakisa kaka :

Biso, na Projet 2014, banda décembre 1999, tozobundela :

  1. liberté ya congolais – tobima na boumbu,
  2. prospérité ya congolais – tobima na bobola,
  3. kimya ya congolais – tobima na insécurité.

Or, batu oyo bazobebisa kimya, prospérité na liberté ya congolais, analyse na biso ezali ente eza :

  1. baescalavagistes – kino lelo : congolais na étrangers bazokanga biso na boumbu,
  2. bacolonisateurs – kino lelo : congolais na étrangers bazoiba bombengo na biso,
  3. badictateurs – congolais : bazokonza biso neti bapaya,
  4. baimposteurs – bapaya bakomi kozua  bokonzi na mboka ya biso na makambo nioso,
  5. batraîtres nioso ya cause ya mboka Kongo – congolais bazolia mbongo ya makila na biso na banguna.

Batu wana, congolais na étrangers, biso moko tozotika bakonza biso, tango tozoponaka bakonzi ya malonga te : oyo bazanga motivation, moralité, capacité ya komema mboka, bolingo ya mboka. Ndenge nini ?

  1. totika balumumbistes bakosa biso na 60 ente tokomata bus, avion mpe tokokota hôpital gratuitement,
  2. tolekisa bamobutistes bakosa biso ente mboka ekobonga na dictature, sexe, paresse na tribalisme,
  3. totika baafdlistes bakosa biso ente tokolonga dictature na trahison, na dépendance, na dictature mususu,
  4. tozotika bapprdistes bakosa biso ente mboka ekobonga na trahison, na imposture, na médiocrité,
  5. tozotika esclavagistes, colonisateurs, dictateurs na traîtres na rang na biso bacombattants to résistants !

Propositions na biso ezali nini ?

  1. disqualification ya bakonzi nioso ya mabe oyo totia na kiti na maboko na biso moko (remplacement ya batu wana na bakonzi bayebalingi mboka ya solo : preuve à l’appui),
  2. bobongisi ya mboka na ba projets ya minene, oyo ekopesa congolais musala na kilo na mokili : instruction, électrification, adduction d’eau, mise à l’emploi : TOTALES !

Yango wana tozoloba boye :

Kongolais aya na Projet 2014 tosolola masolo ya bien :

  1. budget annuel na biso esengeli eleka de 7 milliards à 79.000…119.000 milliards, sans nyongo libanda !  Toyebi ndenge nini kosala yango ?
  2. bozangi koyeba, dictature, esclavagisme, colonisation, traîtrise, na bolembu ekoma ennemis ya biso nioso.  Boye
Soki boye te, soki totikali kaka koyoka conseils ya bandeko na biso moko te, kasi totikali kaka koyokaka conseils ya bapaya, ya banguna, na ya bandoki ya biso moko ; imposture ekotikala na Congo mbula 20 to 30 mususu.  Ekokamwisa baye bazangi mayele ya kososola ente tozobebisa mboka biso moko !  Mupaya azoprofiter na tango wana, kino mukolo tokobima na mpongi na bulembu na fier na biso.

NDEKO KONGOLAIS : OKOBANGA, TO OKOBANGISA ?  NDENGE NINI ? WAPI ? MPO NA NINI ?  NA NANI ?  MUKOLO NINI ?

Avatar de Inconnu

Auteur : Graphèle Paluku Atoka Uwekomu

I am involved in the personal and holistic development of each of my fellow citizens, and in the community, national and global development in a democratic, christian, and capitalist way. Je suis impliqué dans le développement personnel et holistique de chacun de mes concitoyens ; et, dans le développement communautaire, national et global dans une vision démocratique, chrétienne et capitaliste. Ik ben betrokken bij de persoonlijke en holistische ontwikkeling van elk van mijn medeburgers; en in de gemeenschap, de nationale en mondiale ontwikkeling in een democratische, christelijke en kapitalistische visie.

Laisser un commentaire

Ce site utilise Akismet pour réduire les indésirables. En savoir plus sur la façon dont les données de vos commentaires sont traitées.